ANDRÉAS MUKONDA

Andréas Mukonda

Graphic Designer · Formateur · Consultant · Entrepreneur digital

Kosala lelo ba solutions oyo ekosala bokeseni lobi.

Nasalisa yo opesa bomoi na makanisi na yo na nzela ya design, digital, formation mpe conseil oyo ebongi na posa na yo.

Portrait professionnel d’Andréas Mukonda

Découvrir

Likanisi ya malamu ekoki kokende mosika soki elakisami malamu.

Ozali na projet, activité to likanisi oyo olingi kokolisa ? Nakoki kosalisa yo kosala image na yango, kobongisa ndenge ozali kolakisa yango, kotia yango malamu na internet to koyekola makambo oyo ekosalisa yo kokende liboso.

Nakoki kosala nini mpo na yo ?

Bosala ya ba images

Nasalaka ba visuels oyo ezali komonisa identité na yo mpe kosalisa activité na yo emonana malamu.

Logo, affiche, flyer, identité visuelle, ba visuels ya réseaux sociaux mpe impression.

Tala design

Ba site web mpe digital

Nabongolaka makanisi na yo na ba outils numériques ya pete mpe ya tina.

Sites web, ba solutions digitales mpe lisalisi na ba projets numériques.

Solola projet na ngai

Boyekoli

Nalingaka kokabola mayele oyo nayekoli.

Ba formations na ngai ezali surtout pratique mpo osalela makambo oyo oyekoli na kelasi, mosala to projets na yo.

Tala ba formations

Conseil

Ozali na likanisi kasi oyebi naino te ndenge ya kobanda ?

Tokoki kofanda, kotala yango elongo mpe koluka nzela ya malamu mpo na projet, communication to activité na yo.

Tuna conseil

Photo mpe média

Image ya malamu ekoki koloba lisolo.

Photo, vidéo, couverture ya événements mpe contenus.

Tala ba services média
Portrait professionnel d’Andréas Mukonda

Na ntina na ngai

Créatif oyo alingaka mpe kokabola mpe kotonga.

Nazali Andréas Mukonda.

Nasalaka na ba domaines ebele oyo esalisaka : design, digital, formation, conseil mpe médias.

Oyo esalisi ngai mingi, ezali koyeba likanisi mpe koluka ndenge ya pete ya komonisa yango, kosalela yango mpe kokoma yango eloko ya solo.

Na 2022, nasalaki Global SHOMDREE Industries mpo na kosangisa misala na ngai na vision moko.

Yeba mingi na ntina na ngai

Projet moko, ba domaines ebele.

Global SHOMDREE Industries esangisi ba pôles minei oyo esalisaka ngai koyanola ba posa ya ndenge na ndenge.

Global SHOMDREE Industries

SHOMDREE Business

Kolongwa na likanisi mpo ekoma projet oyo ebongisami.

Conseil mpe lisalisi.

Tuna conseil

SHOMDREE Design

Kopesa makanisi na yo identité ya makasi.

Design graphique, communication visuelle mpe impression.

Tala design

Ozali na likanisi ?

Tosolola pete mpe totala ndenge tokoki kopesa yango bomoi.